Kishore Kumar Hits

Angela Chibalonza Muliri - Jubilee şarkı sözleri

Sanatçı: Angela Chibalonza Muliri

albüm: Yahwe Uhimidiwe


Eh Jubilee
Bongo tango yango oyo
To lamuka eh
Congo mboka na biso
Nzambe alingi biso mingi
Ye wana aza na nzela
Aza ko ya ko bikisa biso eh
Hallelujah
Bo fungola miso botala na ngomba
Leve toi. Soit elaire
Comme ta lumiere arive
Et la gloire de l'eternelle se leve sur toi
Ezali mbula ya jubilee
Bakonzi ya mboka bo lamuka eh
Ba Congolais, bolamuka eh
Belei ekoti na mboka ah
Mbula ya Nzambe eko noka eh
Bikuke ya Nzambe efungwami oh
Ezali mbula ya restoration
Jubilee, Jubilee
Oh Jubilee
Jubilee na Congo
Nzambe asili ko sala eh
Oh Jubilee
Jubilee, Jubilee
Oh Jubilee
Ba Congolais to sepela
Oh Jubilee
Nzambe ayoki mabondeli
Oh Jubilee
Oh Jubilee
Basali ya Nzambe telema
Bo kamba ba pate ya Nzambe eh
Bisika bilei bizali
Bato ya masumu tubela
Bobanga Nzambe na Israel
Azali na makoki ya ko pambola
Soki afungoli nani ako kanga yango oh
Nzambe asili ko sala eh
Tika biso pe to lingana ah
To longola kanda na mitema
Jubilee, Jubilee
Oh Jubilee
Jubilee na Congo
Oh Jubilee
Mabala ekufa lamuka eh
Bolingo ekufa lamuka
Oh Jubilee
Economie ekufa lamuka ah
Oh Jubilee
Oh Jubilee, Jubilee
Oh Jubilee
Instrumental
Oh Jubilee
Soki Nzambe adimi nani ako boya eh
Soki Nzambe afungoli nani ako kanga ah
Oko tiya tembe
Oko mona kasi oko liya te
Nzambe asili ko sala ah
To longola elikya na Poto
To tiya elikia na Nzambe
To tonga mboka ya Congo
Kati na bomoko pe bolingo
Ba Congolais boyoka nga
Nzambe asili ko sala eh eh eh
Oh Jubilee
Jubilee, Jubilee
Oh Jubilee
Bato ya Goma bo sepela eh eh
Oh Jubilee
Volcan eyaki eko zonga pe
Oh Jubilee
Marchandise ekufaki eko telema eh
Commerce ekufaki lamuka
Oh Jubilee
Bolingo ekufaki lamuka
Oh Jubilee
Toyoka mongongo ya Nzambe eh
Hallelujah
Jubilee, Jubilee
Jubilee na Congo
Hallelujah
Nzambe atonda bolingo
Oh Jubilee
Nzambe atonda mawa, bandeko
Oh Jubilee
Alingi biso ba Congolais
Oh Jubilee
To sangana to tonga mboka na biso
Oh Jubilee
Ba president to lamuka eh
Oh Jubilee
Gouvernement to lamuka eh
Oh Jubilee
Hallelujah
Mwinda ya Nzambe epeli na Congo
Oh Jubilee

Поcмотреть все песни артиста

Sanatçının diğer albümleri

Benzer Sanatçılar