Kishore Kumar Hits

Jose Nzita - Asali Feti şarkı sözleri

Sanatçı: Jose Nzita

albüm: Kanga Ngai Photo


Asali feti, abengisi
Kasi bato abengisi baboy' na bango koya
Alambi biloko, na masanga
Kasi bato alembeli baboy' na bango koya
Esali pasi na mokolo ya feti oyo
Tango abebisi pona kolamba bilia
Esali pasi na mokolo ya feti oyo
Bato abengisi baboy' na bango koya
(Ati...) atindi pe, (Invi...) invitation (epay' ba ndeko naye...)
Bato abengi baboy' na bango koya
(Ati...) atindi pe, (Invi...) invitation (epay' ba ndeko naye...)
Bato abengi baboy' na bango koya
(Ata.) Ata baninga (Oyo...) ya motema (mokol' yango...)
Mokolo ya feti baboy' na bango koya
Esali pasi na mokolo ya feti oyo
Tango abebisi pona kolamba bilia
Esali pasi na mokolo ya feti oyo
Bato abengisi baboy' na bango koya
Achanger décision atindi basali na nzela
Bakende kobenga bato nioso po baya
Bampon' ekolote te mpe loposo te, bakota
Kolia na mesa ya mokonzi
Ekutanaki nanga moseka nazalaki wana
Nakotaki mpe na ndaku ya roi
Oyo esengo, ndaku namonaka na mosika
Lelo nazui ngolu ya kokota na ndaku ya roi
Mesa mokonzi oyo bat' ya minene baliaka
Ngai muana na lie na mesa yango
Esali esengo ndaku natalaka na musika
Lelo nakoti mpe navandi na ndaku ya roi
Bilok' ya mokonzi ekomi pe ya ngai
Oyo bato babengaki, baboyi na bango koya
Yango mpé mokonzi asengi nga muasi
Mpé, a
(Ati...) atindi pe, (Invi...) invitation (epay' ba ndeko naye...)
Bato abengi baboy' na bango koya
(Ati...) atindi pe, (Invi...) invitation (epay' ba ndeko naye...)
Bato abengi baboy' na bango koya
(Ata.) Ata baninga (Oyo...) ya motema (mokol' yango...)
Mokolo ya feti baboy' na bango koya
(Esali pasi...)
Esali pasi na mokolo ya feti oyo (esali pasi...)
Tango abebisi pona kolamba bilia... (Esali pasi, esali pasi.)
Esali pasi na mokolo ya feti oyo (Wo wo wo)
Bato abengisi baboy' na bango koya
Feti yango mutu asalaki ... Nkolo Yesu
Ba invités nde bazalaki bana ya Israël
Babengaki bango baya kolia biloko ya pamba
Oyo basombi nabongo te basali lolendo
Mokonzi achanger décision atindi basali na nzela
Baluka ngai "José moseka" nakota na ndaku
Lelo nakomi mpé muasi ya mokonzi nasepeli
Oyo nionso ya mokonzi ekomi mpé ya ngai
Lelo nakomi kobengama muasi ya roi
Nakomi héritier ya promesse biloko ya Nzambe
Ah tika na yemba ngolu
(Ngolu)
Ngolu
(Ngolu eh)
Ngolu
Nazui ngolu kokota na ndaku ya roi
Tika na yemba ngolu
(Ngolu)
Ngolu
(Ngolu eh)
Ngolu eh
Nakoti mpé nalieyi na mesa ya roi
Tika na yemba ngolu
(Ngolu)
Yemba ngolu
(Ngolu eh)
Ngolu eh
Esuki te nakomi mpé muasi ya roi

Поcмотреть все песни артиста

Sanatçının diğer albümleri

Benzer Sanatçılar