Kishore Kumar Hits

Aime Nkanu - Reve De Joseph şarkı sözleri

Sanatçı: Aime Nkanu

albüm: Devant Ta Face


Bandeko na ye babuakaki ye na kati ya libulu
Po bakunda ya ye ndoto bazindisa ye
Bazangi ko comprendre yo, vision na yo
Mosali ya Nzambe kolela te, Rêve de Joseph
Nionso ebandaki balulaki elamba na ye
Mosali ya Nzambe keba kolobelaka bozui na yo
Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Babimisi ye na libulu po bateka ye bayoki ata mawa te
Nzoka bakoyeba te bazali kokokisa volonté ya Nzambe, Rêve de Joseph
Bakosalela yo makita, kobanga te, ezali pona élévation na yo
Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Epayi ya Potiphar, muasi na ye aluki ye makambo
Nani akindimela yo et pourtant vérité ezali oyo bakoloba te
Joseph na boloko, innocent, asali na ye, bakoseli ye makambo
Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Lelo yo na libulu, tika bango baseka yo
Nani akokaki kondima Joseph akokamba mboka?
Lelo yo na prison, tika bango batiola yo
Lobi Nzambe akobongola histoire na yo
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Moto oyo aza na Nzambe, basekaka ye te
Nzambe nde abongisaka ba nzela na ye
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Lelo ozangi tina tika bango bango batiola yo
Lobi bakoya kosenga yo lisalisi
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Olingi kosopa zemi, kosala yango te
Keba okoya koboma Joseph ya libota
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Lelo ozangi muana, tika bango bateka yo
Nani akokaki kondima Sarah akokaki kobota
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Po ozangi mbongo baboyeli yo libala
Lobi bakoya kofukama liboso na yo
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango
Buaka na yo nga, Nzambe alokota ngai
Ndenge akosala nga y'okokamua
CH: Bazalaki koyeba te, ye nde akosunga bango

Поcмотреть все песни артиста

Sanatçının diğer albümleri

Benzer Sanatçılar