Kishore Kumar Hits

Moise Mbiye - Losambo şarkı sözleri

Sanatçı: Moise Mbiye

albüm: champion


Losambo na ngaï Nkolo yanola eh
Kolela na ngaï Yaweh oyoka eh
Naza ko senga ngaï
Loboko na yo zala na nga
Ba limites na ngaï ekweya
Makambo ebongwana eh
Ebongwana eh
Na longa eh
Yaweh eh na longa eh
Ngaï longa eh
Yaweh eh na longa eh
Ngaï longa eh, ngai longa eh
Eleki nga mayele
Esali nga kobanga
Nga na kende ko wapi?
Nazongi na liziba
Esika na zuaka makasi
Esika na zongaka ya sika
Kanga ekuke ya satana eh
Na bomoyi na nga
Etelema, telema
Na longa eh
Yaweh eh, na longa eh
Na longa eh
Yaweh eh, na longa eh
Na longa eh, sala na longa eh
Esila boye te boye te eh, boye te
Balonga ngaï te ngaï te eh eh, ngai te
Nakueya na se te, na se te, na se te
Nasuka boye té eh, boyé te eh eh, boye te
Naza kosenga ngaï eh
Loboko na yo zala na nga
Ba limites na ngai éh, ekueya eh
Makambo ebongwana
Ebongwana eh
Na longa eh
Nzambé na lola eh na longa eh
Nalingi otia liloba oyo ezo correspondre na situation na yo
Soki ozobela osimbi place ozobela ozo yemba
Nabika eh
Nzamb'a miracle, na bika eh
Sala nga na bika
Nzambe na lola, na bika eh
Soki problème na yo eza kobota ozoyemba
Na bota eh
Nzambé na Anna eh na bota eh
Sala nga nabota
Nzambé na lola, na bota eh
Soki problème na yo eza ya libala yemba
Na bala eh
Nzamb'a bikamwa, nabala eh
Yaya sala nga na bala
Nzamb'a Moïse, nabala
Soki bitumba elekeli yo yemba
Na longa eh
Nzambe na Mbiye, na longa eh
Sala nga na longa
Nzambe na Alliance eh na longa
Mosali na Nzambé tango ekoki osenga miracle na yo
Batu oyo ba ndimelaka yo te
Ba comprendre que Nzambé a benga yo
Yemba elongo na ngaï
Bikamwa eh
Nzambé na lola, bikamwa
Salaka bikamwa eh
Nzamb'a Moïse, bikamwa eh
Salaka bikamwa eh
Nzambé na Mbiye, bikamwa
Yaya salaka bikamwa eh
Nzamb'a Moïse
Bikamwa eh, bikamwa eh, yaya
Lelo, likambo moko esengeli ebongwana na vie na yo
Yemba nzembo oyo na ko ndima nionso
Nzembo oyo nazo koma ngo elongo na yo
Tia liloba oyo ezo correspondre na problème na yo
Naza ko senga nga
Loboko na yo na Eklezia eh

Поcмотреть все песни артиста

Sanatçının diğer albümleri

Benzer Sanatçılar